Philippians 4

1Yango wana, bandeko balingami na ngai, bino baoyo nazali na posa mingi mpo na komona, bino baoyo bozali esengo na ngai, mpe ekoti na ngai ya lokumu ; balingami, bopikama makasi kati na Nkolo.

Bitinda

2Nabondeli Evodia mpe Sentishe ete bayokana bango na bango kati na Nkolo.

3Nasengi yo, moyengebene moninga, salisa basi oyo, pamba te babundaki elongo na ngai mpo na Sango Malamu, ndenge moko mpe Kelema na baninga mosusu ya mosala, baoyo bakombo na bango esiʼekomama na Buku ya bomoi.

4Bosepelaka tango nyonso kati na Nkolo ; nazongeli yango lisusu bosepela ! 5Tika ete boboto na bino eyebana na bato nyonso. Nkolo akomi pene-pene. 6Bomitungisa na eloko ata moko te, kasi na makambo nyonso, bolakisa baposa na bino epai ya Nzambe, na nzela ya mabondeli, bisengeli, elongo na matondi.

7Bongo kimia ya Nzambe, oyo eleki bososoli nyonso, ekobatela mitema na bino mpe makanisi na bino kati na Kristo Yesu.

8Bandeko, mpo na kosukisa, makambo nyonso oyo ezali ya solo, makambo nyonso oyo ezali ya kitoko, makambo nyonso oyo ezali ya sembo, makambo nyonso oyo ezali ya peto, makambo nyonso oyo batobalingaka, makambo nyonso oyo bato bakumisaka, soki likambo moko ezali malamu to oyo bato bakoki kokumisa, tika ete bokanisaka mpona makambo yango.

9Makambo oyo boyekolaki, bozwaki mpe boyokaki epai na ngai, to mpe oyo bomonaki na ngai, bosalela yango. Bongo Nzambe ya kimia akozala elongo na bino.

Polo azongisi matondi

10Nazali kosepela mingi penza kati na Nkolo, mpo ete suka na yango, bokanisi ngai lisusu. Ya solo, bokanisaki ngai, kasi bozangaki nzela mpo na kolakisa yango.

11Nalobi boye te mpo nazali kokelela, pamba te nasiʼnayekola kozala na esengo na oyo nazali na yango. 12Nayebi ndenge nini kozala kati na kokelela, mpe nayebi ndengenini kozala kati na biloko mingi. Nasiʼnayekola sekele ya kozala na esengo kati na makambo ya ndenge na ndenge mpe kati na makambo nyonso, ata nalie malamu to nazali na nzala, ata natondi na biloko to mpe nakeleli. 13Nakoki kosala makambo nyonso na nzela ya ye oyo apesaka ngai makasi.

14Kasi bosalaki malamu mpo na kosangana na bapasi na ngai. 15Bato ya Filipi, bino moko boyebi yango ete, tango nabandaki koteya Sango Malamu mpe nalongwaki na Masedwane, Lingomba ata moko te epesaki ngai lisalisi, longola kaka bino. 16Tango navandaki na Tesalonika, botindelaki ngai lisalisi mbala mibale, mpo na oyo nazalaki na yango posa.

17Ezali te ete nazali koluka likabo, kasi nazali koluka ete benefisi ebakisama mpo na bino.

18Nzokande nazali na biloko nyonso, natondi na biloko nyonso, mpe nazali lisusu na posa ya eloko moko te lokola nazwi na maboko ya Epafrodite makabo oyo botindelaki ngai. Yango ezali malasi ya solo kitoko, likabo oyo endimami, oyo esepelisaka Nzambe.

19Mpe Nzambe na ngai akokokisa baposa na bino, na ndenge ya nkembo ya bomengo na ye, kati na Kristo Yesu. 20Nkembo ezala na Nzambe na biso mpe Tata mpo na libela na libela ! Amen.

Bambote

21Bopesa mbote na basantu nyonso kati na Kristo Yesu.

Bandeko oyo bazali na ngai elongo awa batindeli bino mbote.
22Basantu nyonso batindeli bino mbote, mingi penza baoyo bazali na ndako ya mokonzi Sezare.

23Tika ete ngolu ya Nkolo Yesu Kristo ezala na bino nyonso.
Copyright information for LinMNB